Psalms 76

Nzambe azali molongi

Nzembo ya Asaf epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na lindanda.


1 Na Yudea Nzambe ayebani ;
kombo na ye ezali monene na Isayele.

2 Ndako na ye ya kapo ezali na Salem ;
mpe evandelo na ye ezali na Siona.

3 Kuna nde abukaki makonga oyo ezali kopela,
ebende ya makasi oyo ebatelaka mpe mopanga,
bibundeli ya bitumba.

4 Ozali kongenga na mwinda,
na lokumu koleka bangomba etonda na nyama.

5 Bilombe mibali babotoli bango biloko
balali pongi na bango ya suka ;
moko te na babundi akokaki kotombola maboko na ye.

6 Na pamela na yo, Nzambe ya Zakobi,
mpe mituka ya bitumba, bampunda,
elalaki pongi ya makasi.

7 Yo moko ozali kobangisa
nani akoki kotelema liboso na yo,
tango osiliki ?

8 Wuta na Likolo, olobaki kosambisa,
mpe mokili ebangaki mpe evandaki nyee,

9 Tango otelemaki, mpo na kosambisa, Nzambe,
mpo na kobikisa bato nyonso ya pasi ya mokili

10 Ya solo kanda na yo ya makasi liboso ya bato ememeli yo masanzoli ;
mpe baoyo babikaka na kanda na yo ya makasi
basimbami.

11 Bolapa bandayi epai na Yawe Nzambe na bino,
mpe bokokisa yango ;
tika ete baoyo nyonso ya nzinga-nzinga ya mabele
bamema makabo epai ya Moto abongi na kobangama.

12 Ye abukaka molimo ya bakambi ;
abangisaka bakonzi ya mokili.
Copyright information for LinMNB